Luke 11

Lolenge ya kobondela

(Mt. 6.9-13)

1Mokolo moko, Yesu azalaki kobondela na esika moko boye. Tango asilisaki, moko ya bayekoli na ye alobaki na ye :

—Nkolo, lakisa biso kobondela ndenge Jean alakisaki bayekoli na ye !

2Bongo Yesu alobaki na bango :

—Tango bozali kobondela, boloba : Tata
tika ete kombo na yo ekumisama,
tika ete Bokonzi na yo eya.
3Pesa biso mokolo na mokolo bilei oyo ekoki na biso.

4 Limbisa masumu na biso,
pamba te biso mpe tolimbisaka baoyo basalaka biso mabe.
Mpe batela biso mpo tokweya na komekama te !

5Bongo alobaki na bango :

—Soki moto moko na kati na bino azali na moninga na ye, bongo akei epai na ye na butu, mpe alobi na ye : “Moninga na ngai defisa ngai mampa misato,
6pamba te moninga na ngai moko awuti mobembo mpe akomeli ngai, kasi nazali na eloko moko te ya kopesa ye mpo alia.” 7Bongo oyo azali na kati ya ndako azongisi : “Kotungisa ngai te, porte, esiʼekangami mpe ngai na bana na ngai tosiʼtolali ; nakoki kolamuka te mpo na kopesa yo yango.”

8Nalobi na bino, ata soki atelemi te mpo na kopesa ye yango mpo azali moninga na ye, kasi akotelema mpo moto wana azali kotungisa ye, mpe akopesa ye nyonso oyo akozala na yango posa.

9Bongo ngai nalobi na bino : Bosenga mpe bakopesa bino ; boluka mpe bokomona ; bobeta mpe bakofungolela bino porte. 10Pamba te, moto nyonso oyo asengaka, azwaka : oyo alukaka, amonaka ; mpe oyo abetaka, bafungolelaka ye porte.

11Tata nini kati na bino soki mwana na ye asengi ye mbisi, bongo akopesa ye nioka ? 12To soki asengi ye liki, akopesa ye nkoto ? 13Bongo soki bino, baoyo bozali bato mabe boyebi kopesa biloko ya malamu na bana na bino, bongo Tata oyo azali na Likolo akoleka kopesa Molimo-Mosantu te na baoyo basengaka ye ?

Nzambe to Satana

(Mt. 12.22-30 ; Mk. 3.20-27)

14Yesu abenganaki molimo moko ya mabe oyo ezalaki baba. Tango molimo yango ya mabe ebimaki, moto oyo azalaki baba abandaki koloba. Bongo ebele ya bato bakamwaki mingi penza. 15Kasi bato mosusu kati na bango balobaki :

—Azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belezebule, mokonzi ya milimo mabe !
16Bongo bato mosusu basengaki ye elembo oyo ekowuta na likolo, mpo na komeka ye. 17Kasi Yesu ayebaki makanisi na bango ; bongo alobaki na bango :

—Bokonzi nyonso oyo ezali ya kokabwana kati na yango moko, ekobeba ; mpe ndako oyo ezali ya kokabwana kati na yango moko, ekopanzana.
18Soki Satana akabuani kati na ye moko, ndenge nini bokonzi na ye ekoki kowumela ? Nalobi boye, pamba te bolobi ete nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belezebule. 19Soki ngai nabenganaki milimo mabe na nguya ya Belezebule, bongo bana na bino babenganaki yango na nguya ya nani ? Yango wana bana na bino, bakozala bazuzi na bino.

20Kasi soki nabenganaka milimo mabe na nguya ya Nzambe, wana Bokonzi ya Nzambe esiʼekomi kino epai na bino.

21Soki elombe azali na bibundeli na ye, mpe azali kokengela ndako na ye, biloko na ye nyonso ekozala na kimia. 22Kasi soki moto mosusu oyo aleki ye na makasi abundisi ye mpe alongi ye, akobotola ye bibundeli na ye nyonso oyo azalaki kotiela motema, mpe akokabola biloko na ye.

23Moto oyo azali elongo na ngai te, alingaka ngai te ; mpe oyo asangisaka te elongo na ngai, apanzaka.

(Mt. 12.43-45)

24—Soki molimo mabe ebimi na moto, ekokende koyenga-yenga na bisika ya kokawuka koluka kopema. Soki ezwi esika te, ekoloba : “Nakozonga na ndako oyo nabimaki !”

25Tango ekokoma, ekuti ndako bakombi mpe babongisi yango malamu ; 26ekokende mpe ekozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe ; bongo ekokota mpe bakovanda kuna. Bongo lolenge ya suka ya moto oyo ekokoma mabe mingi penza koleka kutu oyo ya liboso !

27Awa Yesu azalaki koloba makambo oyo, mwasi moko azalaki na kati ya ebele ya bato alobaki :

—Esengo mingi na mama oyo abotaki yo, mpe amelisa yo mabele !

28Kasi Yesu azongisaki :

—Nzokande, esengo koleka na bato oyo bayokaka Maloba ya Nzambe mpe batosaka yango !

Yesu apameli bato ya tango oyo

(Mt. 12.38-42)

29Lokola bato mingi bayaki kotonda pembeni na ye, alobaki :

—Bato ya tango oyo bazali bato mabe ! Bazali kosenga likamwisi. Likamwisi… bakopesa yango mosusu te, longola kaka oyo esalamaki na Jonasi.
30Pamba te, ndenge Jonasi azalaki elembo mpo na bato ya Ninive, ndenge moko mpe Mwana ya Moto akozala elembo mpo na bato ya tango oyo.

31Na mokolo ya kosambisama Mokonzi-mwasi ya Sude elongo na bato ya tango oyo mpe akokatela bango etumbu. Pamba te, ye awutaki na suka ya mokili mpe ayaki mpo na koyoka bwania ya Salomo. Nzokade, moto moko azali awa aleki Salomo. 32Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema elongo na bato ya tango mpe bakokatela bango etumbu. Pamba te bango babongolaki mitema tango bayokaki mateya ya Jonasi. Nzokande, moto moko azali awa aleki Jonasi !

(Mt. 5.15 ; Mk. 4.21)

33Moto moko te soki apelisi mwinda atiaka yango na esika ya kobombama, to na nse ya katini ; kasi atiaka yango likolo ya eloko oyo batielaka mwinda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona kongenga na yango.

34Liso na yo ezali mwinda ya nzoto na yo. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ekotonda na mwinda ; kasi soki yango ezali mabe, nzoto na yo mobimba mpe ekotonda na molili. 35Yango wana keba, mpo ete mwinda oyo ezali kati na yo ekoma molili te. 36Soki nzoto na yo mobimba etondi na mwinda, mpe ezali na eteni moko te ya molili, nzoto na yo mobimba ekotonda na mwinda, lokola tango mwinda engengisaka yo na kongenga na yango.

Yesu apameli Bafarizeo

(Mt. 23.4-36)

37Tango Yesu asilisaki koloba, Mofarizeo moko abengisaki ye akende kolia elongo na ye. Yesu akotaki na ndako, mpe avandaki na mesa. 38Kasi Mofarizeo akamwaki mingi tango amonaki ete Yesu asukolaki maboko te liboso ya kolia.

39Bongo Nkolo alobaki na ye :

—Bino bafarizeo bosukolaka libanda ya kopo mpe ya sani, kasi na kati, botondi na posa ya koyiba mpe makambo ya mabe.
40Bazoba ! Boni, moto oyo asalaki libanda, asalaki mpe kati te ? 41Kasi bopesa oyo ezali na epai kati na mobola, bongo biloko nyonso ekozala peto mpo na bino. 42Kasi mawa na bino bafarizeo ! Pamba te bofutaka eteni moko ya zomi ata ya biloko ya mike-mike oyo bolonaka na bilanga na bino, kasi bobwakaka bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Esengeli bokokisaka makambo oyo, kasi bobosanaka mpe te oyo wana.

43Mawa na bino Bafarizeo ! Bolingaka kovanda na bisika ya lokumu na bandako ya mayangani ; mpe bolingaka bapesaka bino bambote na bisika ya bato ebele. 44Mawa na bino ! Pamba te bozali lokola malita oyo emonanaka te ; mpe bato batambolaka likolo na yango mpo bayebi yango te.

45Bongo molakisi moko ya Mibeko alobaki na Yesu :

—Moteyi, na maloba oyo olobi, ofingi biso mpe !

46Yesu azongiselaki ye :

—Bino mpe balakisi ya Mibeko, mawa na bino ; pamba te bomemisaka bato mikumba ya kilo penza, kasi bino moko bosimbaka yango ata na mosapi moko te.

47Mawa na bino ! Pamba te botongaka malita mpo na baprofeta, mpe bakoko na bino nde babomaki bango. 48Na ndenge wana, bozali kotatola ete bozali kondima makambo oyo bakoko na bino basalaki ; pamba te bango, babomaki baprofeta, bongo bino bozali kotongela baprofeta malita.

49Yango wana, Nzambe kati na bwania na ye alobaki : “Nakotindela bango baprofeta mpe bapostolo, bakoboma basusu, mpe bakonyokola bamosusu.” 50Yango wana, bato ya tango oyo bakomema mokumba mpo na makila ya baprofeta nyonso oyo baboma banda mokili ebanda, 51banda na makila ya Abel, kino na oyo ya Zakariya, oyo babomaki na kati ya mesa ya makabo mpe Ndako ya Nzambe. Ya solo nalobi na bino, bato ya tango oyo bakomema mokumba ya mabe wana nyonso.

52Mawa na bino Balakisi ya Mibeko ! Pamba te, bolongola fungola ya boyebi. Bino moko bokotaka te, mpe bokangisaka nzela na baoyo balingaka kokota !

53Tango Yesu abimaki na ndako, bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko babandaki kotiela ye tembe makasi penza mpe kotuna ye mituna oyo etali makambo ya ndenge na ndenge : 54Bazalaki kotiela ye motambo mpo bayoka na kati na maloba na ye likambo oyo bakokaki kofundela ye.
Copyright information for LinMNB